《Tu Vois?》歌词

[00:11:06] Olobaki nini eh eh eh eh
[00:11:06] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
[00:11:06] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo
[00:11:06] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
[00:11:06] Olobaki nini eh eh eh eh
[00:11:06] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
[00:11:06] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo eh
[00:11:06] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
[00:11:06] (Luambo Makiadi)
[00:11:06] Madilu tika ye aloba eh
[00:11:06] Makambo ye asalaka, ayebaka te
[00:11:06] Ba balabala ye atambolaka, bato ba monaka ye
[00:11:06] Ba ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka ye
[00:11:06] Na ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka
[00:11:06] ye
[00:11:06] Po na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefe
[00:11:06] Um
[00:11:06] (Madilu System)
[00:11:06] Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye ye
[00:11:06] Ngai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye ye
[00:11:06] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
[00:11:06] Oyebi tango engindaka oh, Mamou eh eh
[00:11:06] Oko kanisa ngai Mamou, na kei eh eh
[00:11:06] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou yee
[00:11:06] (Luambo Makiadi)
[00:11:06] Oh Mamou, na kamwe vraiment, Mamou
[00:11:06] Na kanisaka ozalaka ami na nga ya motema
[00:11:06] Po oyebi que nayebi ba secret na yo nyoso
[00:11:06] Eloko ekamwisi nga Mamou
[00:11:06] Okei ko finga ngai epa ya Musa
[00:11:06] Olobi ngai nazali ndumba
[00:11:06] Vraiment, Mamou
[00:11:06] Oyebi, ngai na balaka
[00:11:06] Na divorca, na bota
[00:11:06] Bongo soki lelo yo, Mamou
[00:11:06] Moto na tiaka motema
[00:11:06] Obandi ko finga ngai ndumba
[00:11:06] Ki ndumba ezali maladi te
[00:11:06] Kindumba ezali punition te
[00:11:06] Mamou, yo mwasi ya libala
[00:11:06] Na kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a main
[00:11:06] Na kati ya sac wana, kabambi ya liputa
[00:11:06] Brosse a dents lokola moto azali ko kende voyage
[00:11:06] Lipapa ya se, ebele ya makasu
[00:11:06] Mamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivard
[00:11:06] Po mibali nayo nyoso tout
[00:11:06] Ata mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobali
[00:11:06] Oko loba que aza mobali na ngai
[00:11:06] Mais na lingaka ko boma libala na bino te, Mamou
[00:11:06] Ummm
[00:11:06] Po na lingaka bo bokolo bana na bosembo
[00:11:06] Au lien na kota ba loba oh
[00:11:06] Tala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abala
[00:11:06] Um
[00:11:06] (Madilu System)
[00:11:06] Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye ye
[00:11:06] Eloko nini olo luka oh, Mamou eh ye ye
[00:11:06] Signature osi ozua, Mamou
[00:11:06] Landa nzela ya libala oh, Mamou
[00:11:06] Landa nzela ya libala oh, Mamou eh yeye
[00:11:06] Yango evandisa yo na poto, Mamou eh eh
[00:11:06] Tika ko kosa mobali nayo, Mamou eh eh
[00:11:06] Soki atelephone loba obimaka, Mamou
[00:11:06] (Luambo Makiadi)
[00:11:06] Mamou, awa lisusu soki na lobi
[00:11:06] Na kumbi ngambo, po naza ndumba
[00:11:06] Yo moko oyebisa ngai
[00:11:06] Mobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo bana
[00:11:06] Ya ngo nde apesa ya signature
[00:11:06] Ekoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo
[00:11:06] 2fois par jour
[00:11:06] Na 6heure du matin, na minuit
[00:11:06] Apres minuit soki a telephone yo
[00:11:06] Okamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimba
[00:11:06] Po bana ba lala ti tango yo oko zonga
[00:11:06] Po oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matin
[00:11:06] Tango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo
[00:11:06] Alo, papa ya bana
[00:11:06] Biso toza na biso kaka malamu
[00:11:06] Kaka nde bana no awa moyen te
[00:11:06] Vraiment mobulu likambo
[00:11:06] Surtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papa
[00:11:06] Eh, azo kamwisa nga vraiment
[00:11:06] Photo kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yo
[00:11:06] Abamba yango na mabele photo epasuka
[00:11:06] Mwana oyo penza mobulu moyen te penza
[00:11:06] Kaka ndenge ozalaka mwana muke
[00:11:06] Lokola mama na yo ayebisaka ngai
[00:11:06] Papa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka te
[00:11:06] Kaka otindelaka biso mbongo ya ko lia
[00:11:06] Na suki se bongo
[00:11:06] (Madilu System)
[00:11:06] Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeye
[00:11:06] Yo moko osalaka mabe ye
[00:11:06] Obangaka mobali nayo te, Mamou eh eh
[00:11:06] Olongola respect na ye okaba, Mamou eh eh
[00:11:06] Ba camarade ya mobali nayo, Mamou eh eh
[00:11:06] Obangaka bango te oh, Mamou eh ye ye
[00:11:06] Lelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye
[00:11:06] (Luambo Makiadi)
[00:11:06] Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimba
[00:11:06] Oke ti na Paris osilisi ngai
[00:11:06] Otindi mokanda na Kinshasa
[00:11:06] Mosusu otindi na Brazza
[00:11:06] Kindumba eza punition te, Mamou
[00:11:06] Oyeba Mamou esui ngai
[00:11:06] Na lingaki dailleur na funda yo, Mamou
[00:11:06] Inutile na funda yo
[00:11:06] Na kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalaka
[00:11:06] Na tekisi yango epa ya Yorgo
[00:11:06] Po azikisela ngai film wana
[00:11:06] Mamou koma ngai
[00:11:06] Ndenge ba komaka Yezu na kuruze
[00:11:06] Sete mibale na loboko
[00:11:06] Sete moko na lokolo
[00:11:06] Mamou, ozali mwasi ya libala
[00:11:06] Okamwisaka ngai
[00:11:06] Na monaka yo oza ndoki
[00:11:06] Oza kinsenkwa
[00:11:06] Ozali munyororo
[00:11:06] Mamou, nini nakoki ko loba po na yo
[00:11:06] Example nini na koki na pesa po na basi ya mabala
[00:11:06] Example ezalite
[00:11:06] Awa ba lobe te nga nazali ndumba
[00:11:06] Nako tambola na mwasi ya libala
[00:11:06] Yango nako pesa yo makannisi mabe, te!
[00:11:06] Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe
[00:11:06] (Madilu System)
[00:11:06] Ngai moto na kotelaka yo
[00:11:06] Ngai moto naybi ba sekele
[00:11:06] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
[00:11:06] Oyebi tango egindaka, Mamou
[00:11:06] Oko kanisa nga, Mamou
[00:11:06] Nake eh eh
[00:11:06] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou, ye
您可能还喜欢歌手Franco的歌曲:
随机推荐歌词:
- 原乡情浓 [邓丽君]
- 我係边个 [林海峰]
- 你这负心的人 [孙露]
- Rewind(Explicit) [Nas]
- 恋之风景 [小艺]
- 分手要狠(Live) [吴雨霏&侧田]
- 第1125集_月儿的真面目集_绝代双娇 [祁桑]
- Romaria [Elis Regina]
- 关于你的某某快乐 [峤祎]
- Long Lonely Nights [Bobby Vee]
- Lost Lullaby [The Four Seasons]
- Cambio De Planes [Sandra Mihanovich]
- Once Bitten, Twice Shy [Ian Hunter]
- Volver A Empezar (Begin The Beguine)(Album Version) [Julio Iglesias]
- Save the Life of My Child (Karaoke Version) [SBI Audio Karaoke]
- Sharing You [Bobby Vee]
- 你没来过一个叫西胪的小镇 [郑派派]
- De Espaldas A Mi [Mikel Erentxun]
- Anselmo Acua el Resero [José García y sus Zorros ]
- Won’t Lovers Revolt Now [Ultra Orange&Emmanuelle]
- Party Rock Anthem(132 BPM) [MC JOE & THE VANILLAS]
- Will You Love Me Tomorrow [Bobby Vee]
- The Twelfth Of Never [Billy J. Kramer&The Dakot]
- The Right Time (live)(Live) [Ray Charles]
- さすらいの途中で [落合博满]
- Aad Guray Nameh [Meditative Mind]
- (lullaby) [Spring& (李敏赫)]
- But Jesus Did [Phil King]
- Pasture of Plenty [Woody Guthrie]
- I’m Real(Karaoke Version) [Ameritz Karaoke Entertain]
- I Love Paris [Ella Fitzgerald&Porter]
- La Trama Y El Desenlace [Jorge Drexler]
- Raglan Road [Philomena Begley]
- Rudolph the Red Nosed Reindeer [Art Neville’s 1,000 Strin]
- All That I Need (As Made Famous By Boyzone) [Karaoke]
- All Cried Out(122 BPM) [Aerobics Exercise Music]
- Ain’t That A Shame(Original) [Fats Domino]
- Do Nothin’ Till You Hear From Me [Nina Simone]
- あんまり素敵じゃない世界 [長澤知之]
- 对爱痴情 [周冰倩]
- 暖かな日差し [加藤達也]
- 我的地方 [白安]