《Mamou》歌词

[00:11:04] Olobaki nini eh eh eh eh
[00:11:04] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
[00:11:04] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo
[00:11:04] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
[00:11:04] Olobaki nini eh eh eh eh
[00:11:04] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
[00:11:04] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo eh
[00:11:04] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
[00:11:04] (Luambo Makiadi)
[00:11:04] Madilu tika ye aloba eh
[00:11:04] Makambo ye asalaka, ayebaka te
[00:11:04] Ba balabala ye atambolaka, bato ba monaka ye
[00:11:04] Ba ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka ye
[00:11:04] Na ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka
[00:11:04] ye
[00:11:04] Po na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefe
[00:11:04] Um
[00:11:04] (Madilu System)
[00:11:04] Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye ye
[00:11:04] Ngai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye ye
[00:11:04] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
[00:11:04] Oyebi tango engindaka oh, Mamou eh eh
[00:11:04] Oko kanisa ngai Mamou, na kei eh eh
[00:11:04] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou yee
[00:11:04] (Luambo Makiadi)
[00:11:04] Oh Mamou, na kamwe vraiment, Mamou
[00:11:04] Na kanisaka ozalaka ami na nga ya motema
[00:11:04] Po oyebi que nayebi ba secret na yo nyoso
[00:11:04] Eloko ekamwisi nga Mamou
[00:11:04] Okei ko finga ngai epa ya Musa
[00:11:04] Olobi ngai nazali ndumba
[00:11:04] Vraiment, Mamou
[00:11:04] Oyebi, ngai na balaka
[00:11:04] Na divorca, na bota
[00:11:04] Bongo soki lelo yo, Mamou
[00:11:04] Moto na tiaka motema
[00:11:04] Obandi ko finga ngai ndumba
[00:11:04] Ki ndumba ezali maladi te
[00:11:04] Kindumba ezali punition te
[00:11:04] Mamou, yo mwasi ya libala
[00:11:04] Na kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a main
[00:11:04] Na kati ya sac wana, kabambi ya liputa
[00:11:04] Brosse a dents lokola moto azali ko kende voyage
[00:11:04] Lipapa ya se, ebele ya makasu
[00:11:04] Mamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivard
[00:11:04] Po mibali nayo nyoso tout
[00:11:04] Ata mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobali
[00:11:04] Oko loba que aza mobali na ngai
[00:11:04] Mais na lingaka ko boma libala na bino te, Mamou
[00:11:04] Ummm
[00:11:04] Po na lingaka bo bokolo bana na bosembo
[00:11:04] Au lien na kota ba loba oh
[00:11:04] Tala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abala
[00:11:04] Um
[00:11:04] (Madilu System)
[00:11:04] Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye ye
[00:11:04] Eloko nini olo luka oh, Mamou eh ye ye
[00:11:04] Signature osi ozua, Mamou
[00:11:04] Landa nzela ya libala oh, Mamou
[00:11:04] Landa nzela ya libala oh, Mamou eh yeye
[00:11:04] Yango evandisa yo na poto, Mamou eh eh
[00:11:04] Tika ko kosa mobali nayo, Mamou eh eh
[00:11:04] Soki atelephone loba obimaka, Mamou
[00:11:04] (Luambo Makiadi)
[00:11:04] Mamou, awa lisusu soki na lobi
[00:11:04] Na kumbi ngambo, po naza ndumba
[00:11:04] Yo moko oyebisa ngai
[00:11:04] Mobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo bana
[00:11:04] Ya ngo nde apesa ya signature
[00:11:04] Ekoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo
[00:11:04] 2fois par jour
[00:11:04] Na 6heure du matin, na minuit
[00:11:04] Apres minuit soki a telephone yo
[00:11:04] Okamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimba
[00:11:04] Po bana ba lala ti tango yo oko zonga
[00:11:04] Po oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matin
[00:11:04] Tango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo
[00:11:04] Alo, papa ya bana
[00:11:04] Biso toza na biso kaka malamu
[00:11:04] Kaka nde bana no awa moyen te
[00:11:04] Vraiment mobulu likambo
[00:11:04] Surtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papa
[00:11:04] Eh, azo kamwisa nga vraiment
[00:11:04] Photo kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yo
[00:11:04] Abamba yango na mabele photo epasuka
[00:11:04] Mwana oyo penza mobulu moyen te penza
[00:11:04] Kaka ndenge ozalaka mwana muke
[00:11:04] Lokola mama na yo ayebisaka ngai
[00:11:04] Papa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka te
[00:11:04] Kaka otindelaka biso mbongo ya ko lia
[00:11:04] Na suki se bongo
[00:11:04] (Madilu System)
[00:11:04] Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeye
[00:11:04] Yo moko osalaka mabe ye
[00:11:04] Obangaka mobali nayo te, Mamou eh eh
[00:11:04] Olongola respect na ye okaba, Mamou eh eh
[00:11:04] Ba camarade ya mobali nayo, Mamou eh eh
[00:11:04] Obangaka bango te oh, Mamou eh ye ye
[00:11:04] Lelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye
[00:11:04] (Luambo Makiadi)
[00:11:04] Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimba
[00:11:04] Oke ti na Paris osilisi ngai
[00:11:04] Otindi mokanda na Kinshasa
[00:11:04] Mosusu otindi na Brazza
[00:11:04] Kindumba eza punition te, Mamou
[00:11:04] Oyeba Mamou esui ngai
[00:11:04] Na lingaki dailleur na funda yo, Mamou
[00:11:04] Inutile na funda yo
[00:11:04] Na kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalaka
[00:11:04] Na tekisi yango epa ya Yorgo
[00:11:04] Po azikisela ngai film wana
[00:11:04] Mamou koma ngai
[00:11:04] Ndenge ba komaka Yezu na kuruze
[00:11:04] Sete mibale na loboko
[00:11:04] Sete moko na lokolo
[00:11:04] Mamou, ozali mwasi ya libala
[00:11:04] Okamwisaka ngai
[00:11:04] Na monaka yo oza ndoki
[00:11:04] Oza kinsenkwa
[00:11:04] Ozali munyororo
[00:11:04] Mamou, nini nakoki ko loba po na yo
[00:11:04] Example nini na koki na pesa po na basi ya mabala
[00:11:04] Example ezalite
[00:11:04] Awa ba lobe te nga nazali ndumba
[00:11:04] Nako tambola na mwasi ya libala
[00:11:04] Yango nako pesa yo makannisi mabe, te!
[00:11:04] Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe
[00:11:04] (Madilu System)
[00:11:04] Ngai moto na kotelaka yo
[00:11:04] Ngai moto naybi ba sekele
[00:11:04] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
[00:11:04] Oyebi tango egindaka, Mamou
[00:11:04] Oko kanisa nga, Mamou
[00:11:04] Nake eh eh
[00:11:04] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou, ye
您可能还喜欢歌手Franco Luambo的歌曲:
随机推荐歌词:
- Again [Wayne Wonder]
- 爱要早点说出来 [山野(李昊瀚)]
- 忙しくてよかった [ゴールデンボンバー]
- 那朵花儿 [李嘉石]
- 我唱的这首歌 [谭涛]
- 说了再多 [炸弹客]
- Do They Know It’s Christmas [Band Aid 30]
- 再过几年 [卓义峰]
- When A Man Cries [Jack Jones]
- Swanee [Al Jolson]
- War [Sum 41]
- There’s A Small Hotel [Della Reese]
- Lemonade [Skylar Grey]
- 纳西情歌 [罗丽珊]
- Pas Davantage [Brigitte Bardot]
- WE BUILT THIS CITY(A.R. Alternative Remix) [Meanstreet Boys]
- Verlang ich zuviel [Ibo]
- Where or When(Remastered) [Peggy Lee]
- Es Tiempo de Retornar [Manolo Garcia]
- Punk B**ch [Too $hort]
- Celoso [Johnny Albino&Trio San Ju]
- You’re Still Beautiful to Me [The Country Music Crew]
- The Old Country Church [Jim and Jesse and The Vir]
- Alabama [Bailey Brothers&The Sunny]
- Dream Of Life(Digitally Remastered, 1996) [Patti Smith]
- Loose Talk [Carl Smith]
- Angel Eyes(Live) [The Jeff Healey Band]
- Big Bad John [Jimmy Dean]
- 一人我饮酒醉(越南鼓) [深七]
- 阿楚姑娘 [方颖昕]
- 若你是他该有多好(DJ何鹏版伴奏) [陈瑞]
- Clubsound(Original Mix) [Solid &Sound&Uniiqx]
- Prayer in C(Robin Schulz Remix; Catholic Version) [Robin Schulz&Lilly Wood&T]
- 秋夜 [金音]
- Must’ve Been(CID Remix) [Chromeo&D.R.A.M.]
- Let Your Conscience Be Your Guide [Marvin Gaye]
- For the Good Of Your Country [Count Basie&Tommy Dorsey ]
- September Song [Sammy Davis Jr.]
- I Want to Be a Cowboy’s Sweetheart [Patsy Montana&The Prairie]
- They Call The Wind Maria [Sam Cooke]
- 箫声 [赵志刚[戏剧]]
- 道谢了 [废墟乐队]